HB Mobeka

Masuwa ya ebale mpo na bato ya mombongo ya mboka na ebale Congo ya likolo

supported by

HB Mobeka ezali na libumu (coque) ya ebende, mpe eteni na yango ya likolo esalemá na nzete ya motane ya mboka na motongi-bwato ya mboka, Didier Somboyo. Mosala ya botongi esungamaki na programme ya lisungi ya bato ya Fondation Gerda Henkel. HB Mobeka esanganaka na mosala ya komema biloko na ebale elongo na baleinières ya nzete, komema bato mpe biloko kati ya Kisangani na Basoko (kilomɛtɛlɛ 240), to kati ya Kisangani na Yahisuli na ebale Lomami (kilomɛtɛlɛ 260). Na tango wana kaka, ezali esika ya bomoi mpo na bolukiluki ya misala (recherche-action), oyo epesaka mayele ya sika mpenza mpo na koyeba mombongo ya bato mpe na ebale ya Kongo, ndenge banzela ya komema biloko ebongwanaka ntango na ntango, mayele ya tekiniki ya mboka, ebongiseli ya komema biloko ya bato ya mboka (logistique vernaculaire) mpe lolenge ya komema na banzela ndenge na ndenge (multimodalité), mpe makambo mosusu. Mbongo oyo euti na mosala ya komema biloko esalisaka biso mpo na kobatela eteyelo na biso ya bolukiluki, na boluki ya bonsomi ya boyebi (autonomie épistémique)..

babomaka nguma na nzete ya musika te
one does not kill a snake with a stick that is far away
Mayala Louis
Mechanic